Famille Antoinette Mobutu : Qui les a rendu pauvre ? La soeur de Marie Antoinette pleure et demande l’intervention de Joseph Kabila et Olive Lembe

7



7 COMMENTS

  1. Maman otanga kombo ya jesus-christ te, ozali kotanga kombo ya joseph kabila kabange lokola nzambe na yo, biloko ya mokili ekoleka jesus-christ azali lelo lobi libela na libela, yaya na yo atika biloko ya mokili oyo, Ko zala materialiste te, mutu yo ozali kolela kabila ye pe akoleka, jesus nde azali suka.

  2. Ah mama omi boma pona biloko ya mokil?? Vanité de vanité toute est vanité..Bato oyo yo ozo lelela b sunga yom po o recuperer biloko na yo, bango moko pe miyibi..Mokili eza kaka ndenge wanaeee.. Ndima mama destin na yo, boliaki mbomüngo ya Mobutu oyo azalaka Ndoki monene..Makambo yango esukaka kaka bye, car tout se paye ici bas..Ye pe Olive bakobotola ye biloko naye lokola..Na yango soki omibomi, okokende lifelo pamba..Luka nde elongi ya nkolo yesus masiya po apesa yo kimia…

  3. Ya solo kamanda junior maman oyo abotola ngongo kamanda epayi ya muasi mosusu, alulaka ngongo kamanda na television ayebisi mobutu que ye alingi kaka mobali oyo. Mbala moko mobutu a convoka ngongo kamanda alobi na ye banda lelo muasi na yo ye oyo, azali semeki na ngai asepeli na yo. Ngongo ne pouvait rien dire a l’epoque atiki bana na ye na muasi na ye ba bandi mbala moko kopesa ye ba fonctions ya minene, lelo mokili ebaluki obandi kolela omoni mokili ndenge ezalaka tango yo ozalaki kosala fete muasi ya ngongo azalaki kolela na bana opesa instructions kutu ngongo atala bana wana te. En plus yo ozo loba que biloko na yo, yebisa biso ozalaki kosala wapi pe olakisi bulletin de paye na yo ozalaki ko gagner combien comme salaire po ozala na biloko nioso wana. tika kolela biloko wana ezali ya yo te, ezali pe ya batu oyo ba botoli yo yango te ezali biloko ya mboka ya l’etat. Na yo na batu wana bino nioso bozalli ba miyibi mutu aza na droit aza te. Obosani ndenge ozalaki kosakana na mbongo ozo kende kosomba ba sapatu ya cher na galleries presidentielles epayi ya isabelle yongeli. Masumu nioso efutamaka awa na se, soki kutu mboka na biso ezalaki na ordre yo olingaki pe okota boloko po ozua biloko wana na moyibi oyo semeki na yo mobutu azalaka koyiba na zaire.

  4. Kokose olobi ba verite’ya maman oyo, abotola ngongo kamanda epai ya muasi mususu,, omoni ndenge mokili ezali, avant okufa okomi ko paye’ masumu nioso osala, elobi congomikili bo kolela na munoko ya mboka, omoni ndenge oleli na ki ngbandi.

  5. Oyo ezali kaka un cas parmis tant d’autres. Sik’oyo batu nionso ba lela kaka epayi ya Olive? Ye nde akomi Justice ya mboka? Bomoni pourquoi biso tozo lutter pour que Etat de droit ezala na mboka? Ezali mawa komona mama azo lela boye, mais Je crois Nzambe a permettre yango po mama a se souvenir na ba oyo nionso bazalaka ba victimes ya regime dictatorial ya Mobutu. Puis pona ba oyo bazali na pouvoir,bayeba que bango lokola balingi Etat de droit te,ba ko vivre pe makambu ya boye. ” TOUT SE PAYE ICI BAS “.

LEAVE A REPLY

Please enter your comment!
Please enter your name here